Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi alingi RDC na Tanzanie basalela lac Tanganyika elongo


Président Félix Tshisekedi (gauche) na bokutani ya mobu na mobu ya bakambi ya Banque africiane ya développement (BAD) na Malabo, Guinée équatoriale, 12 juin 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi (gauche) na bokutani ya mobu na mobu ya bakambi ya Banque africiane ya développement (BAD) na Malabo, Guinée équatoriale, 12 juin 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi ya Congo démocratique alobi lelo na bokutani na mokokani wa ye ya Tanzanie, John Magufuli, ete bikolo na bango mibale biselela elongo lac Tanganyika.

Mokonzi ya RDC ayambaki ya président Magufuli nsima ya bokomi na ye na Dar-es-Salam mpo na mobembo na ye yambo lokola mokambi ya ekolo.

"Nsima na kolonga mondenge ya bokengi, tokoki kosala makambo ebele elongo… Boyebi ete bikolo na biso bikabolaka ndelo ya molayi ya 500 kms. Na ndakisa, tozali na lac Tanganyika eye ezali moko na ba lacs etonda mbisi koleka na mokili mobimba. Tokoki kosalela yango, na koloba mbisi elongo na lolenge ya industriel," elobi mwana mboka Tshisekedi na elambo esalamaki mpo na lokumu na ye.

Président Tshisekedi akomaki na Tanzanie nsima na mobembo na ye na Guinée équatoriale esika wapi azalaki na masolo ya bokutani ya mobu na mobu ya ba gouverneurs ya Banque africaine ya développement.

Na bokutani ya Maloba na Guinée équatoriale, M. Tshisekedi azwaki elaka ya BAD mpo na mosolo ya misala ya kotonga Inga III mpe ya gbagba to pont kati na Kinshasa mpe Brazzaville, eyebisi baye ya présidence ya Congo démocratique.

Nsima na Tanzanie, Felix Tshiskedi nde azwi nzela ya kokeknde na Bujumbura na Burundi.

Masolo na Burundi makotala mingi bokengi na ndelo kati na mboka mibale mpe bokoti ya Congo démocratique na Lisanga ya bikolo ya monyele to Est, na bokuse CAE. Nzokande,Felix Tshisekedi akomelaki le 8 juin Président Paul Kagame ya Rwanda oyo azali kokamba CAE mpo na kosenga ye bokoti na lingomba liye.

Lelo le 13 juin nde mokolo ya bokanisi mbotama ya Félix Tshsiekedi. Akokisi mibu tuku mitano na motoba. Eyenga ya mbotama elamu !!!

XS
SM
MD
LG