Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi alobi état de siège ekokoba kino suka ya ba dongolomeso


Président Félix Tshisekedi ya RDC, mpe mokambi ya Union africaine, na lisikulu na ye na 76e Assemblée générale ya ONU na New York, 21 septembre 2021.
Président Félix Tshisekedi ya RDC, mpe mokambi ya Union africaine, na lisikulu na ye na 76e Assemblée générale ya ONU na New York, 21 septembre 2021.

Président Félix Tshisekedi alobi, na lisikulu na ye na 76e Assemblée générale ya ONU, ete mampinga ma Ekolo Congo démocratique makokoba misala mya état de siège na monyele mboka kino suka ya ba dongolomeso.

"Yango wana mbulamatari ekokoba makasi ma yango mpe état de siège ekotikala kino makambo matindaki yango kotiama, makolimwisama," elobi M. Tshisekedi.

Na lisikulu na ye, apamelaki bitumba badongolomeso bazali kosala ata na Afrika mpe na mokili mobimba.

Asengi bosangisami ya makasi na mokili mpo na yango.

Bo’ mokambi ya Union africaine, Tshisekedi alaki ete démocratie ekokoba na Afrika mpo bana ba Afrika balingi lisusu te bokonzi ya basoda mpe lingomba lya bato moko kaka.

Asengi ete molongo kosunga mpo Afrika eyikisa nkita na yango makasi na koboya moyibi.

Alobeli mpe Afrika mpo ezwa bisika mibale na Conseil ya sécurité lokola membre permanents mpe bisika misusu mibale bo' membre non permanent.

Alaki mpe ete maponami makosalama na RDC na 2023.

M. Tshisekedi asengi mpe lisungi mpo mino mpe mangwele ma COVID-19 makelama na Africa.

XS
SM
MD
LG