Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi asololi boyokani na ntoma ya Rwanda na Kinshasa


Ntoma ya Rwanda Vincent Karega (G) na masolo na président Félix Tshisekedi na cité ya Union africaine na Kinshasa, RDC, 25 aout 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Ntoma ya Rwanda Vincent Karega (G) na masolo na président Félix Tshisekedi na cité ya Union africaine na Kinshasa, RDC, 25 aout 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi ya RDC asolalki na ntoma na Rwanda  na Kinshasa, Vincent Karega, mpo etali boyokani kati na bikolo mibalke.

Tata mokonzi ya RDC ayambaki na ntoma Karega na ndako ya mosala na cité ya Union africaine.

"Ezalaki lokumu mpe libaku lilanu kosolola na mokonzi Félix Tshisekedi ya RDC mpo etali boyokani bolamu kati na RDC na Rwanda mpe emoniseli ya etuka mpo na kimya mpe ntombwa," ekomi na Twitter M. Karega.

Nungunungu ezaakli mikolo mileki nsima na makomi ma ntoma ya Rwanda na Twitter oyo atelemelaki baye bazalaki kolobela bobomi bato na Kasika na Sud-Kivu na 1998.

Bato pene na 1.100 babomaki na Kasika ntango mamapinga ma Rwanda mazalaki kuna.

Mikolo mileki boko na bakonzi ba Rwanda babangisaki Dr Denis Mukwege nsima kosenga ete rapport mapping ya ONU mpe etali bobomi bwa ban aya RDC wuto 1998, bolandelama.

XS
SM
MD
LG