Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na Brazzaville


Denis Sassou N'Guesso ayambi mokokani wa ye mokonzi ya RDC na libongo ya Brazzaville, Congo, 15 juillet 2020. (Présidence ya RDC)
Denis Sassou N'Guesso ayambi mokokani wa ye mokonzi ya RDC na libongo ya Brazzaville, Congo, 15 juillet 2020. (Présidence ya RDC)

Président Félix Tshisekedi akatisi mercredi na mpokwa na Brazzaville na bosengi ya mokokani na ye ya mboka eye.

Mokonzi ya Congo-Brazzaville Denis Sassou ye moko ayambaki ye na libongo ya Brazzaville.

Molebeli ya mbulamatari ya Brazzaville, Thierry Moungalla, alobi ezali mobembo mwa 48 heures mpe etali boyokani kati na bikolo mibale.

Bayi présidence ya Kinshasa bayebisi ete ezalaki yambo mobembo na bokutani mpo na makambo matali mboka te kasi mbulamatari ya Brazzaville elingi ezala mobembo ya bokonzi.

Banoknzi babale bakosolola mpo etali bolamu ya mboka mibale, eyebisi VOA Lingala moko na bayi communication ya présidence.

Bakonzi babale bakosala liyebisi na suka ya mobembo yango.

XS
SM
MD
LG