Cour ya cassation ekweyisi mokano mwa Cour d'appel mpo na Kamerhe

Vital Kamerhe, mokambi ya UNC, azali koyanola bapanzi sango, Kinshasa, 1er septembre 2016.

Cour ya cassation ya Ekolo Congo démocratique ekweyisi mokano ya misala mya bosembo mopesaki etumbu ya mibu zomi na misato ya boloko na Vital Kamerhe, mokambi ya kala ya ndako ya mosala ya président Félix Tshisekedi mpe mokonzi ya lingomba Union pour la nation congolaise, UNC.

Cour ya cassation epameli lolenge Cour d’Appel esambisaki mbala eleki Vital Kamerhe mpe ekweyisaki ye o’likambo.

Esengeli bosambisami bwango bozongola mikolo mikoya.

"Vital Kamerhe azalaki na liberté provisoire to bonsomi ya mwa ntango kasi sik'oyo bonsomi bwa ye bokomi makasi mpo condamnation na ye ekweyisami sika na mokano ya cour ya cassation," elimboli moko na ba avocats ya Vital Kamerhe, Me Alfred Maisha.

Ba avocats ya Vital Kamerhe balaki ete bakokotisa bosenga ya bozongeli bosambisami ya Vital Kamerhe kaka mposo moye.

Mpo na bango, moko na mbeba ezalaki ete bazuzi na basambi batikala soki moke te kokita esika ndako mpe bilembo misusu ya biloko bisombamaki bizali na Kinshasa mpe na mabongo ma bikolo misusu lokola Angola mpe Tanzanie.

Vital Kamerhe azwaki bonsomi ya mwa ntango na libandela ya mobu moye nsima na ekateli ya bonzongoli mpo na kopengwisa pene na millions ntuku mitano ya ba dollars ya misala ya mikolo nkama ya mokonzi mboka Felix Tshisekedi.

Akatelamaki yambo mibu ntuku mibale.

Bato basusu lokola Sammih Jammal na Jeanot Muhindo bazwaka etumbu yambo mpe bazali na mokano ya sika ya Cour ya cassation.