Lourenço na MPLA balongi maponami na Angola

Président Joao Lourenço nsima na kopona na maponami ma 24 août 2022, Luanfa.

Joao Lourenço mokonzi azali na ebonga na Angola alongi maponami ma Ekolo Angola elongo na lingomba lya ye MPLA. Kolanda bilembo bya misala mya maponami MPLA ezwi bongo 51,17% na bilembo binso bitangami.

Unita, lingomba linene lya opposition nde ezwi 43,95% kasi mokambi na yango Adalberto Costa Junior asakolaki mposo moleki ete aboyi bilembo biye.

Bosakolami bwa bilembo binso bosalami mokolo moko nsima na bokundami ya José Eduardo dos Santos, mokonzi atikaka bokonzi na 2017 nsima na kokamba Angola mibu 38.

Dos Santos azalaka mpe na MPLA, lingomba liye lizali na bokonzi na Angola wuto lipanda lya yango na 1975.