Sadio Mané azoki mikolo 12 yambo na Mondial

Sadio Mane ya Bayern Munich atie maboko na moto na match na Borussia Moenchengladbach na Bundesliga ya Allemagne, na Munich, 27 aout 2022. (AP Photo/Matthias Schrader)

Mosani ya Sénégal Sadio Mané azoki na ebolongo na ye na match club na ye, Bayern Munich, ebetaki mokolo mwa mibale 9 novembre 2022 na championnat ya Allemagne, mikolo 12 yambo na Mondial Qatar 2022.

Sadio Mané, moko na basani Sénégal, ekolo na ye, ezali kotiela motema mpo na coupe du monde, asilisaki match yango te.

Abimaki na 21e minute nsima na kotutana na bowoleli ndembo .

Elobani te soki akokoma malamu yambo na coupe du monde to te.

Sadio Mané, azalaki na molongo ya mibale na Ballon d'Or 2022 eye eleki.

Alongaki Coupe d'Afrique eleki na sanza ya mibale, mpe azalaki finalsite ya Ligue des champions na Liverpool na sanza ya motoba yambo na kokota na Bayern Munich,

Sénégal ekobeta match na yango yambo ya Mondil le 21 novembre na Pays-Bas.

Ba Lions ya Teranga ya Sénégal bazali na groupe A na Watar epayi Mondial yango ekobetama, Pays-Bas na Equateur.