RDC elongi Guinée 1-0 mpe Congo-B ebeti Sudan ya sud 1-0 na ba éliminsatoires ya CAN 2025

Capitaine ya ba Léopards ya RDC (G) azali koloba liboso lya mosani moko ya ba Sily ya Guinée na match ya 1/4 finale ya CAN na stade Alassane Ouattara, Ebimpe, Abidjan, 2 sanza ya mibale 2024.

Ba Léopards ya lisano lya ndembo na makolo (football) ya RDC balongi ba Sily ya Guinée 1-0 na match ya mposo ya yambo ya ba éliminatoires ya CAN 2025 o'mokolo mwa motoba ya sanza ya 2024 na stade des Martyrs, na Kinshasa.

Edo Kayembe ya RDC atiaki mongete na 27'.

RDC ezwi bongo esika ya yambo mpo na mwa ntango na groupe H liboso lya Ethiopie, Tanzanie na Guinée.

Ethiopie na Tanzanie bakabolaki 0-0 mikolo mibale mileki na Dar es Salam.

Na groupe K, ba Diables rouges ya Congo-Brazzaville mpe elongaki ekipi ya Sudan ya sud 1-0 na stade Massambe Deba na Brazzaville.

Massanga matondo nde atiaki mongete ya ba Diables rouges na 12'.

Congo-Brazzaville mpe ezali sika na molonga mwa yambo ya groupe K liboso lya Uganda, Afrika ya Ngele na Sudan ya sud.

ba Cranes ya Uganda batelemelaki ba Bafana Bafana ya Afrika ya Ngele 2-2.

Ba matches misusu na ba groupes misusu mpe ebetami.