Kalama Harris na Donald Trump bazongeli bobeti ntangwa na bango

People watch TV screens showing the debate between Democratic presidential nominee Vice President Kamala Harris, right, and Republican presidential nominee former President Donald Trump at Sports Grill Kendall in Miami, Florida, Sept. 10, 2024.

Kalama Harris na Donald Trump bazongeli lelo bobeti ntangwa na bango, moto na moto ngambo na ye, nsima na bondongwani bwa bango lobi loleki liboso lya etando eke.

Démocrate mpe vice-présidente ya Ekolo Amerika Kamala Harris na mokonzi ya kala Donald Trump napesanaki lisusu lelo mbote ya loboto na New York na milulu mya bokanisi mokolo mwa zomi na moko ya sanza ya libwa, mokolo Amerika ekundolaka mobulu mwa bokweyisi mpepo badongolo meso basalaki bisiki mingi na Ekolo Amerika na 2001.

Bopesani mbote yango bosalamaki na miso mya mokonzi oyo azali na esika, démocrate Joe Biden.

Donald Trump na Kamala Harris bakutanaki mpe bapesamaki mbote mpo na mbala ya yambo lobi loleki na bondongwani na etando eke.

Esengeli kokundola ete Joe Biden, ata ko alongaki ba primaires ya ba démocrates, aboyaki kokoba kowelela maponami mpe atikelaki esika na vice-presidente na ye Kamala Harris nsima na kolakisa elongi mabe na bondongwani azalaki na yango na Donald Trump.