RDC

Bato motoba bakufi mpe minganga mibale bamemami na bitumba ya ba ADF

Batomboki ya ba musulmans ya Ouganda, ba ADF (Forces démocratiques alliées) na Nord-Kivu, le 7 décembre 2018.

Batomboki ya ba musulmans ya Ouganda, ba ADF (Forces démocratiques alliées) basali bitumba mpo na mbala ya liboso na etuka ya Ituri epayi wapi bato motoba –soda moko na ba miliciens (banyangalakata) mitano- bakufi.

Banyangalakata ya ADF bamemi minganga mibale, kolanda molebeli ya mampinga ya RDC.

"Ba ADF bayaki mingi kasi tobomi mitano mpe tokangi moko. Soda moko awei likolo na mpota," eyebisi molobeli ya ba FARDC na Ituri, lieutenant Jules Ngongo.

Ba ADF baye bawutaki na Nord-Kivu mpe babundisaki mobka Tchadi na territoire ya Irumu na ndelo na etuka ya Nord-Kivu, elobi lieut. Ngongo.