Eyoma na Minneapolis mpo na bobomami ya mohindo moko na ba policiers

Eyoma na Minneapolis, Minnesota, 28 mai 2020.

Eyoma ezali kokoba nsima na butu misato ya mobulu na Etat ya Minnesota mpe bisika misusu na botelemeli liwa lya mobali moko na ya mibu 36, George Floyd, na maboko ya ba policiers baye bavandelaki ye na kingo ntango bazalaki kokanga ye.

Basoda nkama mitano ya garde nationale batiami mpo na komema kimya.

Batelemeli batiaki moto na commissariat ya police na butu na Minnesota mpe bapunza ba magazins.

Procureur ya mboka Hennepin na Minneapolis alobi ete policier moko oyo akangamaki akosambima mpo koboma M. Floyd.

Mooanzi sango moko ya mohindo akangamaki.

Lobi loleki Haut-Commissaire ya Nations ya makoki ma bomoto esengaki bakonzi ya Etats-Unis mikano mpo na kosukisa bobomami ya Bahindo na Police.