TV

Eyoma ya balandi ba Bolsonaro mpo na koboya elonga ya Lula na Brésil

Your browser doesn’t support HTML5

Balandi ba Jair Bolsonaro, mokonzi oyo akweyi na maponami na Brésil basalaki eyoma lobi na ndako ya mosala ya mokonzi ya mboka mpe ya bokeli mibeko na Brasilia mpo na koboya elonga ya Luiz Inacio Lula de Silva. Bayi molongo bapameli eyoma eye ekokani na eye balandi ba Donald Trump na 2020 na USA.