RDC

Tshisekedi alobi amemi koleka 1,5 milliards $ na mibembo mizwi kutu 50 millions te

Président Félix Tshisekedi na Entebe, Ouganda, 11 novembre 2019.

Président Félix Tshikedi alobi na bokutani na bana ya RDC na Paris ete mibembo mya ye mimemi koleka 1,5 milliards ya ba dollars mpe mizwi ata 50 millions te.

"Mpo na baye bazali kolukaka makambo, nayebisi bango ete tosi tomemi koleka milliards moko na ndambo ya ba dollars likolo ya mibembo miye mpo na Congo. Mibembo myango mizuwi ata kuku ba 50 millions ya ba dollars te. Mpe tokokoba. Tokolanda te bato ya maloba mabe baye balakaki, bobsani te, kosala manso mpo na kopekisa baye batiyaka mosolo koya na Congo," elobi mokonzi ya ekolo Congo démocratique liboso ya bituluku ya baye batondisaki ndako monene ya masolo maye.

"Mibembo mya ngai mizali bitambolatambola te. Mizali te makambo ya koluka bisengo. Mibembo mya ngai mizali mpenza mimekano. Mpo bisika binso nazali kokende, bato banso balingi kozwa sango ya Congo. Bato banso balingi koyeba nini ezali koleka na Congo. Mpe nazali kosala mosala elongo na basungi ba ngai mpo na koluka baye bokoki kotiya mosolo na mboka, ya kosala manso mpo kopesa bango mposa ya koya epayi na biso kotiya mosolo mpe kokela misala. Ezali bitambolatambola te, ezali te loyi (vacances)," ebeti mokolo M. Tshisekedi.

Nzoka nde, ba Congolais basusu bazalaki olimbanda ya ndako ya bokutani boye, batelemelaki na ba nzembo na bilili.

Mwo mobulu mobima kati na bango mpe bayike balikanga kokota na esika ya masolo.

Police ekita o’eskia eye mpo na koyia kimya.