Mokonzi ya mboka ya RDC asakoli suka ya libala kati CACH (Cap pour le changement, ya ye) na FCC (Front commun pour le Congo, ya mokonzi ya kala Joseph Kabila), liye majorité lizalaki kokamba mboka wuto mibu mibale.
Président Tshisekedi asalaki lisikulu lyango lokola alakaki yambo abengisa boyoki bato mowumelaki mposo misato.
Ayebisi ete bato mingi basengi mbongwana mpe baboyi libala CACH-FCC.
"Mpo na kokikisa mbongwana tolingi kosala, lokola majorité eye ezalaki epanzani, majorité mosusu esengeli ekelema. Na yango, nazwi mokano ya kotia informateur kolanda article 78 ndelo ya mibale ya Buku likonzi. (Informateur) azali na mosala ya koluka coalition ya sika eye esangisi majorité ya sika na Assemblée nationale." ellobi M. Tshisekedi.
Mokonzi ya RDC alaki kotia na lombango mbulamatari mosusu ekowuta na coalition ya sika.
Kasi soki majorité ya sika emonani te, alaki kozongela bana mboka mpo na kosenga bango bapesa ye majorité ya sika. Elingi koloba, na nzela ya maponami masusu ya législature.
M. Tshisekedi apameli matata to nkwokoso ezalaki na lisanga kati na CACH na FCC. Alobi ezalaki "mibu mibale ya kokanga motema", "ya koluka biyano na matata na mpasi" mpe "mibu mibale ya ngolu miye misili sika".
Alimboli ete alingi "union sacrée" alingi kokela esengeli esangisa bana mboka ba ngambo inso mpo kolanda politiki alingi kosala.
"Bandeko babolingo bana mboka. Lisanga lya bana ya Cogno ekatisa mikakatano ebele kasi Congo na biso etikala kaka na bomoko. Etumba ezali ya kobimisa mboka na biso na bobola, na bozangi. Bitumba ya solo esengeli kobunda. ezali kosilisa moyibi na kaniaka na mboka na biso. Toboyi bokabwani na koswana oyo toyebeli ntina te. Na sengi na bino banso tosangana mpo tobimisa mboka na biso na etumbu oyo," elobi M. Tshisekedi..