"Soki zamba ya RDC eziki, koleka 52% ya mayi ya kati ya mboka nde ekokende na yango elongo. Kolimwa ya écosytème eye ekomema likama monene mpe ekobebisa kimya ya climat na mokili," elobi M. Tshisekedi.
"Tosengi baye banso tosalaka na bango kopesa maboko mpenza na misala ya mbulamatari na ngai ya kobatela zamba ya Congo. Lisungi yango esengeli esalama na nzela ya misolo mingi mpenza," eyebisi M. Tshiskedi.
Abakisi ete boyokani ya makasi mpe bopesi ma makoki ya techonlogie yango ekopesa nzela na misala mikowumela mpo na kokitisa gaz ya effet de serre eye ememi réchauffement climatique ya planète.
Gaz ya effet de serre ezali mopepe moye mozongaka likolo soki moyi ebeti eloko lokola kitala. Mopepe yango mozikisaka oxygène na gaz mosusu ya litomba mpo na bikelamu lokola bato bapema. Yango nde ematisi moto na mabele (planète Terre) [Réchauffement climatique].
M. Tshisekedi akundoli ete zamba mpe tourbières nde ekangaka 30% ya gaz effet de serre.
Etuka ya kati ya Afrika, mingi mpenza RDC, ezali na 250 millions ya ba heactares, na stock ya 70 milliards ya ba tonnes ya carbone maye mamelaki pene na 750 millions ya gaz carbonique (CO2) mobu na mobu… masalaka mosala makasi ya kotambwisa climat.
M. Tshisekedi alaki kosala nyonso mpo na kobakisa motango ya bisika bibatelama (aires protégées) kati na yango mayi, na etando mobimba ya ekolo Congo démocratique.