Koleka mabota 100 baye batikali na Sake, na 27 kms ya Goma, mpo ndako na bango ebebisamaki na botomboki ya volcan Nyiragongo, babenganami na bisika biike bavandaki. Bazali na nzala mpe baike, na bokono. Totala sango wuto Sake na Fiston Issemwami.
Basimba minduki mpe batomboki ya kala baye batika minduki bakangaki nzela na nkanda na Mubambiro na 25 kms ya Goma, na Nord-Kivu, mpo na kosenga bakonzi kotala bango. Tatala sango na Fiston Issemwami.