Monganga mokambi ya Hôpital général ya Kinshasa (ex-Mama Yemo), Dr. Jean-Paul Divengi Nzambi alimboli mobulu mosalami ntango basali batelemisi mosala mpo na bowelani ya bokonzi kati na baye batiami na ministère na baye ya gouvernorat. Masasi mabetamaki. Nathalie Sekabuhuro atunaki ye.
Molongo mozali kokanisa bakoni lelo. Nathalie Sekabuhuro ya VOA Lingala apesaki maloba na Dr. Thierry Mukendi, mokambi ya minganga na lopitalo St Joseph na Kinshasa. Monganga oyo asengi bongeko mpe koyeba kosala libenga lya "ntsitsani" na ntina ya kosungana. TOTALA.
Bokono bwa maba (mbala) to Lèpre bozali nanu kongala na RDC. Na 2019, bakoni bayebanaka na yango bazalaki 3.206 kasi motango mwango momata. Nathalie Sekabuhoro atunaki mokambi ya misala mya bitumba na maba. Tolanda biyano ya Dr. Florent Ngondu.
RDC mpe eningisami na mbonge ya mibale ya COVID-19. Nathalie Sekabuhoro asololaki na ministre ya Bokolongono, Dr. Eteni Mongondo. Ministre ya Bokolongono alobeli mino misami na bayie RDC, mangwele maye mazali kopesama na mboka mingi mpe bonzeli ya kelasi. TOTALA