Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

JP Bemba, Vital Kamerhe, Mbusa, P. Kazadi bakoti na mbulamatari ya sika ya Sama Lukonde


(G-D) Vital Kamerhe, mokonzi ya lingomba lya polititi UNC ayambani na Augustin Kabuya ya UDPS pene na Jean-Pierre Bemba ya MLC na kiti (4e) na molongani wa ye Liliane Bemba (3e) na misa mya Papa François na N'Dolo, Kinshasa, 31 sanza ya yambo 2023.
(G-D) Vital Kamerhe, mokonzi ya lingomba lya polititi UNC ayambani na Augustin Kabuya ya UDPS pene na Jean-Pierre Bemba ya MLC na kiti (4e) na molongani wa ye Liliane Bemba (3e) na misa mya Papa François na N'Dolo, Kinshasa, 31 sanza ya yambo 2023.

Jean-Pierre Bemba, mokonzi ya lingomba MLC (Mouvement de Libération du Congo) mpe vice-president ya kala ya RDC ntango ya Joseph Kabila, Vital Kamerhe mokonzi ya UNC (Union pour la nation congolaise), Musa Nyamwisi ya RCD-KML mpe mokambi ya kala ya ndako ya mosala ya président Félix Tshisekedi na Peter Kazadi, moko na bakambi ba UDPS, bazali kati bato bakoti na mbulamatari ya sika mokonzi ya Ekolo Congo démocratique abimisi o’mokolo mwa minei na mpokwa.

Kolanda liyebisi Tina Salama, molebeli ya président Tshisekedi, atangi na etando eke ya RTNC (Radio-télévision nationale congolaise), Jean-Pierre Bemba apesami ebonga ya Vice-Premier ministre mpe ministre ya Bobateli ekolo na Babundi ba kala.

Vital Kamerhe nde apesami ebonga ya Vice-Premier ministre mpe ministre ya Nkita.

Mbusa Nyamwisi, mokambi mosusu ya kala lingomba RCD-KML liye lizalaka mpe lisanga lya batomboki, atiami nde ministre ya Intégration régionale to ya Bosangisami kati na etuka.

Peter Kazadi nde ebonga ya Vice-Premier Ministre mpe ministre ya Nteyi, Bokengi mpe mambi ma Bokoko.

Jean-Michel Lukonde atikali Ministre wa Yambo mpo na kokamba mbulamatari.

Christophe Lutundula ye mpe atikali na ebonga ya Vice-Premier ministre ya mambi ma Bapaya mpe Francophonie.

Na Fonctions publiques, bomemi na lolenge ya sika mpe mbongwana ya misala mya l’Etat, Jean-Pierre Lihau atikali ministre mpe Vice-Premier ministre.

Ba ministres baike ya sika bakotisami mpe na mbulatari na esika ya baye bazalaki.

Kati na bango, Dr Roger Kamba oyo azalaki mopesi toli ya président Tshisekedi, azwi ebonga ya ministre ya Bokolongono na esika ya Dr. Jean-Jacques Mbungani.

Mokeli mibeko Mireille Masangu akomi ministre ya Genre (Bomwasi mpe Bobali).

Mopanzi sango Kabulo Mwana Kabulo akomi ministre ya Masano.

Mbongwa ya mbulamatari eye esalami ntango etikali sanza libwa mpo na maponami ma mokonzi ya mboka mpe bakeli mibeko masengeli kosalama na suka ya mobu 2023.

Esalami mpe ntango bitumba mpe mobulu mozali kokoba na monyele ya mboka, mingi mingi na ba M23 na Nord-Kivu, ba ADF na Beni mpe mangomba misusu ma basimba minduki bazongela koboma na Ituri mpe masanga masusu ma basimba minduki mabotami na bisika lokola Kwamouth na west.

Jean-Pierre Bemba azalaki mokambi ya kala ya batomboki na lingomba lya ye MLC yambo ebongwana lisanga lya politiki.

Atindamaka na CPI (Cour pénale intertaionale) nsima na kozala vice-président ya RDC mpo mbeba ya m=bitumba mpe makoki ma bomoto mpe alekisaki mibu zomi na boloko yambo na kotika mpo na bozangi bilembo na bofundami bwa ye.

XS
SM
MD
LG