Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tozali banani ?

VOA, mabongisi ya monene koleka na Etats-Unis, multimedia, mpo na kopesa sango. Epesaka sango na na nkota biyike, koleka motango ya 45, na bisika biye bizangi to bizali kaka na ndambo ya ba media ya nsomi. Ekelama na 1942. VOA emipesa na kosakola sango na mayele mpo ete bato bayeba. Esalaka na bonsomi nyonso mpe elobaka bosolo. VOA ezuwaka mosolo na yango na bafuti mpako mpo ezala kati na Agence ya Amerika mpo na media ya mokili mobimba (U.S. Agency for Global Media).

Etinda mpe bonsomi ya VOA bipesameli na mibeko maye mibatelaka ba bapanzi sango ya VOA na influence (bopusi), pression (mbamba) to kozongisela mabe ya bakonzi ya gouvernement to ya baye ya politiki.

Na 1976, président Gerald R. Ford atiyaki manzaka na Charte (mokanda likonzi) ya VOA moye molobi:

1. VOA ekozala ntango nyonso liziba ya sango bato bakotiyela motema mpe ya bakondima. VOA ekozala sembo, ya katikati (objectif) mpe ya mayele.

2. VOA ekolakisa Amerika, kaka ngambo moko te ya société, mpe ekopesa bongo projection ya ngambo nyonso mpe oyo bato bakoyeba, ya makanisi ya motuya ya Amerika mpe ya ba institutions.

3. VOA ekotalisa mibeko to poliki ya Etats-Unis na polele nyonso mpe na ndenge ya elonga, mpe ekolakisa masolo mpe maloba ya ba thèses politiques na ndenge ya bokolo.

Na 1994, Congrès ya Etats-Unis endimaki International Broadcasting Act. Mobeko moye mosengi mpe ete mosala ya ba banzi sango ya VOA ezala ya kilo ekondimisama, ya solo, ya katikati, ya mayele, etali ngambo nyonso mpe ekominisa bokeseni ya culture mpe société ya Amerika.

Na 2016, Congrès esakolaki lisusu na National Defense Authorization Act ete mosala ya kozuwa mpe ya kopesa sango mosengeli kokoba kozala ya bonsomi mpe ya bokatikati.

Mokolo na mokolo, bapanzi sango ya VOA basalaka mosala makasi mpo na kopesa ndakisa ya press libre na mokili.

VOA

Press ya nsomi nde esengeli

XS
SM
MD
LG