Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sama Lukonde na ba ministres baike batiki mosala


Jean-Michel Sama Lukonde, Ministre wa Yambo ya sika na RDC (G) na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation, Kinshasa, 18 mars 2021. (Facebook/Présidence RDC)
Jean-Michel Sama Lukonde, Ministre wa Yambo ya sika na RDC (G) na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation, Kinshasa, 18 mars 2021. (Facebook/Présidence RDC)

Ministre wa Yambo ya ekolo Congo democratique Jean-Michel Sama Lukonde lokola mpe ba ministres baike ya mbulamatari batindi mikanda mya botiki mosala na bango mpo na kozwa bibonga na Assemblée nationale epayi baponamaki na maponami ma sanza ya zomi na mibale ya 2023.

Buku likonzi ya RDC esengi bango kopona kati na mbulamatari na ndako ya nse ya bokeli mibeko.

Bayi mbulamatari bazalaki na mikolo mwambe mpe ntango yango esengekaki kosukisama na minuit ya mokolo mwa mokolo mwa mosala mibale, mokolo mwa ntuku mibale na mibale ya 2024.

Ba ministres basusu mpe batiki mikanda mya bango mpo na kolongwa na mbulamatari.

Kati na bango, ba Vice-Premier ministres, ya ministre ya Nkita Vital Kamerhe, ya Fonction publique Jean-Pierre Lihau lokola ministre d’Etat ya mambi ma Intégration régionale Antipas Mbusa, ministre d’Etat ya mambi ya Urbanisme mpe Habitat Puis Mabiulu, ministre ya Misala Claudine Ndusi mpe vice-ministre ya mambi ya Bapaya Crispin Mbadu.

Na kozela mbulamatari ya sika, misala mya mbualamtari mikotambwisama sika na molandi ya M. Sama Lukonde, Vice-Premier ministre ya mambi ma Bobateli ekolo, Jean-Pierre Bemba.

Forum

XS
SM
MD
LG