Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moyi PPRD Moussa Mondo akatelemi mibu 20 ya boloko mpo na kobeta mpe kozokisa mwasi wa ye oyo akufaki nsima


Ba avocats bazali kobima na boloko bonene ya CPRK/Makala, Kinshasa, 27 novembre 2012.
Ba avocats bazali kobima na boloko bonene ya CPRK/Makala, Kinshasa, 27 novembre 2012.

Tribunal ya Grande instance ya Kinshasa-Gombe ekateli mibu 20 ya boloko na ministre d’Etat ya kala ya mambi ma Petololo ya RDC mpe moko na bakambi ba PPDR, lingomba lya lya mokonzi ya mboka ya kala Joseph Kabila, Moussa Mondo.

Bazuzi bapesi etumbu yango mpo ndenge Moussa Mondo “abobetaki mpe azokisaki na nko” mwasi wa ye Alisa Khadidja oyo akufaki nsima na yango, kolanda nsango epesami na Me Michel Loji Kikangala.

Moussa Mondo asambisamaki na lombango nsima na kokangama na butu ya mokolo mwa mosala moko mwa 14 ya sanza ya minei ya 2024.

Akangamaki nsima na ye kotika na lopitalo mwasi wa ye oyo abetakaki mpe azokisaki.

PPRD etelemisaki ye na mosala mpo na sanza misato nsima na likambo liye mpo na kozela mokano mwa bazuzi.

Forum

XS
SM
MD
LG