Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bitumba bizongelaki lisusu makasi na Bwito


Likalo lyoko lya mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC) na bitumba na Kanyarucinya, na 10 km na Goma, Nord-Kivu, 17 sanza ya sambo 2013.
Likalo lyoko lya mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC) na bitumba na Kanyarucinya, na 10 km na Goma, Nord-Kivu, 17 sanza ya sambo 2013.

Bitumba byango bisalemaki na territoire ya Rutshuru, na etuka ya Nord-Kivu, kati na batomboki ba M23 baye Kinshasa efundaka Rwanda kopesa maboko na mampinga ma Ekolo Congo Démocratique baye basungamaka na basimba manduki ba mangomba ndenge na ndenge babengamaka ba Wazalendo.

Bayi bisika byango batatoli ete ba Wazalendo nde babandaki bitumba mpo na koluka kobenga ba M23 na Kibirizi, Kabanda, Kasoko mpe nzinga nzinga. BaWazalendo batumbaki camp moko ya M23 na Kabanda mpe bayebaki kokota na Kibirizi yambo na kolongwa bisika byango.

Forum

XS
SM
MD
LG