Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ekolo Amerika elobi ezalaki te mpe epesamaki nsango te na bobeti boye bolamami ete Israel esali na Iran


Secrétaire d'Etat ya ekolo Amerika na masolo na bapanzi nsango na bokutani bwa ba ministres ya mambi ma Bapaya, na Capri, Italie, 19 sanza ya minei 2024.
Secrétaire d'Etat ya ekolo Amerika na masolo na bapanzi nsango na bokutani bwa ba ministres ya mambi ma Bapaya, na Capri, Italie, 19 sanza ya minei 2024.

Secrétaire d’Etat Antony Blinken apesi eyano na bapanzi nsango o'mokolo mwa mosala mitano na kolobaka ete Etats-Unis epasamaki nsango te na bobeti bwa Israel na mabele ma Iran.

Azali na likita lya ba ministres ya mambi ma Babaya ya G7 na Capri, na Italie.

Nzokande, ba media ya Iran epesi nsango ya bopanzani pene na base ya mampinga kati na engumba Isfahan, mpe wlobi ete ba drones ya Israel ekwyesamaki.

Kolanda nsango yango, bisika ya misala mya nucléaire na Natanz epayi bibundeli bya atomic bizali kosalama, bisimbami te.

Israel elobi eloko te na nsango yango.

Ministre ya Mambi ma Bapaya ya Iran alobaki o'mokolo mwa mosala minei na Conseil ya sécurité ya ONU ete Israel esengeli komipekisa kozongisa mpo Iran ezongisaki nde na bombe Israel ebetaki na lopango ya ambassade na yango na Turquie epayi ebomaki ba officiers ba yango baike.

Media ya l’Etat ya Iran elobi ete mibembo mya mpepo mitelesami.

Israel ekebisaki ete ekozongisa na ba missiles mpe drones koleka nkama misato eye Iran ebetaki yango na butu ya mokolo mwa mposo moleki.

Bikolo ebele epekisaki Israel kozongisa lokola Amerika.

Bayi ekelo Amerika baloki bapesamaki te nsango ya bobeti Israel esali mpe Washington ezalaki te na bobeti bwango.

Mokonzi ya Iran alakaki mikolo mileki ete soki Israel ezongisi, ekolo na ye ekopesa eyano ya makasi na mabele ma ba Yuda.

Forum

XS
SM
MD
LG