Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Botswana eboyi kondima koyamba basali mibembo Royaume-Uni ekobengana


Bato bazali kotelemela bobengani bwa basali mibembo pene na libanda lya mpepo ya Gatwick, Londres, 12 sanza ya motoba 2022
Bato bazali kotelemela bobengani bwa basali mibembo pene na libanda lya mpepo ya Gatwick, Londres, 12 sanza ya motoba 2022

Ekolo Botswana esakoli eboyi kondima basali mibembo baye Royaume-Uni ekobengana ; na boyokani ya lolenge eye Rwanda endimi.

O’mokolo mwa mosala mibale moleki, Parelement ya Royaume-Uni endimaki kobanda kotinda basali mibembo na Rwanda nsima na koboyaka yango mikolo mileki.

Mposo moye, na Botswana, mabongisi ma société civile masengaki na koboya bosenga ya Royaume-Uni ya kotindala basali mibembo na mboka eye.

Ministre ya mambi ma Bapaya ya Botswana, Lemogang Kwape, ayebisi VOA ete bakonzi ba R.U. bazali sengaka na Gaborone kasi bakonzi ba Botswana balingi kondima te mpo nayebi te ndenge makambo maye makosuka.

Bayi lbeko lya ba ONG basengi nde na Botswana kozala mosika na Royaume-Uni na likambo mpo mabongisi maye mamonani kobatele kaka baike ba baye bazali kokima bikolo bya bango na kobanga mpo na koboya konyokwama kasi mazali kobatela te basusu batikali, lokola elobi Kutlwano Relontle, mokambi ya Botswana coalition, the mokanda mwa nsango ya sociét♪0civile.

Rwanda endimaki bosenga ya R.U. mpe Londres ekobanda kopesaka yango misolo mpo na yango.

Forum

XS
SM
MD
LG