Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

ONU elobi ezali na misolo ya kokoka te mpo na kosunga bakima bitumba na Est ya RDC


Président Félix Tshisekedi ayambi kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na Kinshasa, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi ayambi kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na Kinshasa, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Ba Agences to misala mya ONU babwaki mbela mpo bazali na misolo ya kokota te na ntina ya kosunga koleka bakima bitumba millions sambo baye bazali na bwale na monyele ya Ekolo Congo Démocratique.

Mabongisi ma ndenge na ndenge maye ma ONU malobi na liyebisi mabimisi elongo ete mazangi koleka 16 pourcent ya misolo koleka dollars millions mibale na ndambo bazali na bosenga na yango mpo na kosunga bakima bitumba na est ya RDC.

Babwaki mbela ete bitumba biye bizali kokoma makasi na monyele ya est ya RDC bisali ete kaka na sanza moke bato koleka nkoto nkama sambo batindami na makasi kokima bisika bavandaka mpe yango ememi motango mwa bakima bitumba na koleka 7,2 millions.

Babeti sete ete matata maye mamatisi mpenza makasi bwale ya basi mpo bazali basi lokol mpe ya nzala.

Basengi ete eyano epesama na mosisa ya likambo liye moye mozali bobimisi bwa makele to bomengo bwa mabele, bomengo ya moyibi, botieyi basi na nse mpe bozongisi ntombwa na nsima.

Forum

XS
SM
MD
LG