Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Na Kalehe na Sud-Kivu pene na bato sambo bakufi mpe basusu bazoki sima ya bopasuki ya bombi


Basoda bazali kosunga bakim ibitumba komata na bwato na libongo pene na Minova, Sud-Kivu, 10 sanza ya misato 2024.
Basoda bazali kosunga bakim ibitumba komata na bwato na libongo pene na Minova, Sud-Kivu, 10 sanza ya misato 2024.

Bato koleka sambo bakufi mpe baike basusu bazoki na ba obus ekweyaki lobi loleki na bisika biike na etando ya Kalehe, na etuka ya Sud-Kivu, kolandala nsango bayi societe civile bapesi. Bakufi na bitumba biye bizali kosalama mpe lokola na bisika biye, kati na FARDC na M23. Mwana moke moko mpe basi basato bazali kati na bato baye bawei, elobi mosali ya l’Etat oyo azali na mokumba ya mambi ma nkita mpe misolo na Kalehe, Eric Tirmu na Actualite.cd. Kolanda matatoli, ba obus ewutaki na Rwangara, na territoire ya Masisi. Ba M23 bakoma wuta mwa mikolo na ba ngomba ya Minova mpe Kalehe mpe ba obus ekoma kopeta mingi bisika yango.

Forum

XS
SM
MD
LG