Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokili mozali kokanisa mokolo mwa ba réfugiés to bato bakima bikolo bya bango mpo na mpasi


Basi baike na biloko bya bango nsima na kobengama na bisika ya bakima bitumba na Brazzaville, na Maluku, Kinshasa, 23 sanza ya mitano 2014.
Basi baike na biloko bya bango nsima na kobengama na bisika ya bakima bitumba na Brazzaville, na Maluku, Kinshasa, 23 sanza ya mitano 2014.

Mokili mozali kokanisa lelo mokolo mwa réfugiés to bato bakima bikolo bya bango mpo na bitumba to mpasi. Bakima bikolo mingi bazali bazali na Ekolo Congo Dmocratique.

Bakambi ba HCR, misala mya ONU mpo na ba réfugiés mpe CNR Misala mya ekolo mpo na ba refugies babwakagi mbela lelo mpo ete makoki ma bakima bikolo bya bango biyeba kotosama.

HCR mpe CNR bakundoli ete ba refugies bawuta Uganda, Rwanda mpe Burundi bazali koleka nkoto nkama moko na ntuku motoba na mwambe bazali na monyele ya RDC.

Mpe koleka nkoto misato bazwami na Goma, engumba mokonzi ya Nord-Kivu.

HCR ekundoli mpe ete ba réfugiés basusu koleka nkoto ntuku mintano na mitano bawuta Sudan ya Sud bazwamaka na mokumba na etuka ya Ituri mpe Haut-Uele epayi bakima wuta pene na mibu mwambe.

Bazali mpe na bosenga ya lisungi mingi.

Forum

XS
SM
MD
LG