Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Copa America: Lionel Messi akokisi mibu 37


Mobeti #10 ya Argentina Lionel Messi na match ya Conmebol Copa America 2024 na groupe A na Canada, na stade Mercedes Benz, Goergie, 20 sanza ya motoba 2024. (AFP)
Mobeti #10 ya Argentina Lionel Messi na match ya Conmebol Copa America 2024 na groupe A na Canada, na stade Mercedes Benz, Goergie, 20 sanza ya motoba 2024. (AFP)

Lionel Messi, capitaine ya ekipi ya Argentine, akokisi mibu 37 wuta mbotama na ye ntonga Copa America ezali kobetama.

Botombeli ye bosepeli mbotama elamu esalamai mingi na ba réseaux sociaux.

“Ozali moto moko oyo amemaka mokili kolota ndoto na nzela ya bonene bwa yo. Koba kosalaka yango liebela mpe kopesa bato mposa ya kosala masano mpe kozala na masano maye maleki kitoko,” ekomi mokambi ya Fifa Giani INfatino.

Mokili motombeli capitaine ya Argentine esengo mpo Lionel Messi, mosani oyo azwa mbala mwambe mbano ya Ballon d’or mpe alongaki Coupe du monde ya ndembo na makolo mibu mbale mileki.

Lionel Messi Balongaki Canada 2-0 o'mokolo ma mosala minei moleki na stade Mercedes Benz, na Georgia, na match ya bofongwami ya tournoi ya Conmebol Copa America 2024 eye ezali kobetama awa na Etats-Unis.

Forum

XS
SM
MD
LG