Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi apesi mbano na ba officiers babale mpo na makasi basalaki na kosukisa bomeki coup d'Etat


Président Félix Tshisekedi na kati ya bakambi ya mampinga ya RDC, FARDC, na Kinshasa, 11 juillet 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na kati ya bakambi ya mampinga ya RDC, FARDC, na Kinshasa, 11 juillet 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Felix Tshisekedi apesi mbano ya ekulusu ya mpiko ya basoda na ba officiers babale ba mampinga ma ekolo mpo bokasi balakisaki ntango bato baike bamekaki kokweyisa bokonzi o’mokolo mwa zomi na libwa ya sanza ya mitano moleki na Palais de la nation na Kinshasa.

Mbano yango, na monzoto moko ya motako , epesami na colonel Jim Muteteke na Lieutenant colonel Dede Tshala Kalambayi.

Ezali mpo na bolingo bwa bango na ekolo, bolingo ya mosala mpe bosawa bwa bango na mampinga, elobi mokano mwa Felix Tshisekedi motangamaki na etando eke ya RDC.

Christina Malanga, mokambi ya bato na mandoki na Palais du bakotaki na Palais de la Nation, ndako ya mosala ya mokonzi ya ekolo, o'mokolo mwa 19 ya sanza ya mitano eleki, na Kinshasa, abomamaki elongo na bato basusu babale na mobaulu basalaki, kolanda molobeli ya mampinga ma Ekolo Congo Démocratique.

Bato basusu 51 bakangamaki mpe bazali kosamba.

Forum

XS
SM
MD
LG