Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cédéao epameli bomeki kokweyisa bokonzi na Guinée Bissau


Basoda ya mampinga ma Guinée Bissau, Bissau, 16 novembre 2021.
Basoda ya mampinga ma Guinée Bissau, Bissau, 16 novembre 2021.

Mobulu mozali na Guinée Bissau epayi wapi masasi mingi mayokani na ndako esika mokonzi ya mboka Umaro Sissoko Emballo na mbulamatari na ye bazalaki na likita.

Basoda babapanzani bisika mingi; misala, biteyolo mpe mimbongo mikangi wuto masasi mabandaki kobeta na nsima ya nzanga na Bissau, engumba mokonzi.

Cédéo (Lisanga lya nkita lya bikolo bya Afrika ya West) epemali oyo elobi ezali bomeki kokweyisa bokonzi.

“Cédéao epameli bomeki ya coup d’état mpe elobi basoda bakozala na mokumba soki likambo libe likomi na nzoto ya président Umaro Sissoko Emballo mpe bayi mbulamatari”, elobi liyebisi lya Cédéao.

Na ngambo na ye, kalaka mokonzi ya ONU, Antonio Guteress asengi, na liyebisi, ete “bitumba bisila na lombango” na Bissau mpe “botosi bopesama na ba misala mya l’état (ba institutions).”

Mokonzi ya Commission ya Union africaine, Moussa Faki Mahamat asengi basoda, na liyebisi, kozonga na ba camps na bango mpe kotika bayi mbulamatari bakanami.

Likambo lyango lisalami mikolo miike nsima na coup d’état esalami na Burkina Faso mpe na Mali.

XS
SM
MD
LG