Minganga balobi ete, mwasi oyo mobali abelaki Ebola, ye mpe alakisaki bilembo ya ebola o mokolo ma yambo ya Fevrier, kasi akufaki bongo le 3 Fevrier. Eyebani naino te soki Ebola ewuti epai ya mobali to soki azwaki yango ndenge esusu. Dr Aaron Aruna ayanoli na micro ya Fatuma Alimasi.