Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi alobi boyokani ya UE na Rwanda bozali nzela ya kopunza RDC


Mokonzi ya Rwand Paul Kagame (C-D) na mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi (C-G) bazali kotala libulu lisalami nsima na botombokia ya volcan na nzela ya Rubavu, Rwanda, 25 sanza ya sambo 2021.
Mokonzi ya Rwand Paul Kagame (C-D) na mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi (C-G) bazali kotala libulu lisalami nsima na botombokia ya volcan na nzela ya Rubavu, Rwanda, 25 sanza ya sambo 2021.

Mokonzi ya RDC, Félix Tshisekedi apameli boyokani kati na Union européenne na Rwanda mpo na kokela chanine ya valeur ya makele mantina makasi. Akundoli boboyi bwa ye ya masolo na batomboki ba M23 kasi andimi kosolola mbala moko na mokonzi ya Rwanda.

Alobaki yango, jeudi na mpokwa, na bokutani wa ye ya yambo na bapanzi na Kinshasa nsima na elonga na ye na maponami ma mokonzi ya mboka ya sanza zomi na mibale.

"Boyokani boye bozali matumoli mpe lokuta monene lokoki kondimama te ," elobi président Tshisekedi na lifalance (Français).

"Bato banso bayebi ete Rwanda ebimisaka ata kilograme yoko te ya makele maye," ebakisi M. Tshisekedi.

Boyokani bwango botaiamaki manzaka o ;mokolo mwa mosala moko moleki.

Nzokande ntoma ya Union européenne, Nicolas Berlanga Martinez alimbolaki na Rwadio Okapi ete boyokani boye bozali nde mpo na koluka koyeba bisika makele mango mawutaka mpe kopesa pole.

Mokonzi ya RDC azongeli koloba ete mpo na ye, masolo makoki kosalama soki moke te na M23 eye ezali te lingomba lya bayi mboka kasi ya Rwanda eye etie kaka baot bake ya "masano" ya RDC liboso.

"Naboyi masolo te kasi na kosala yango kaka, miso na miso, na mokonzi ya Rwanda Paul Kagame mpo na kotuna ye mpo na nini azali kokoba kosalaka bitumba na mboka na nga mpe koboma bana mboka na nga mpamba mpamda," eyebisi M. Tshisekedi.

Forum

XS
SM
MD
LG