Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Amerika elobi ata mokanda moko te molakisi ete Christian Malanga azali moyi Amerika.


Secrétaire d'Etat ya Amerika Antony Blinken (G) na mokambi ya CENi ya RDC Denis KAdima bakutani na Kinshasa, RDC, 10 août 202. (CENI RDC)
Secrétaire d'Etat ya Amerika Antony Blinken (G) na mokambi ya CENi ya RDC Denis KAdima bakutani na Kinshasa, RDC, 10 août 202. (CENI RDC)

Départemenet d’état ya Ekolo Amerika elobi ete emoni ata mokanda moko te molakisi ete Christian Malanga, mokambi ya baye bamekaki kokweyisa bokonzi mokolo mwa eyenga na Kinshasa azalaki moyi Amerika.

Molobeli ya Département d’état Matthew Miller nde alimbolaki yango lobi loleki awa na Washington D.C. na biyano apesaki na bapanzi nsango.

Na ndimbola apesaki na VOA Lingala lobi loleki, molobeli ya mampinga ma Ekolo Congo Démocratique, général Sylvain Ekenge ayebisaki ete Christian Malanga azalaki moyi Amerika kasi abomamaki na mobulu mwa lobi loleki nsima na kokota na Palais de la nation na commando na ye mpo na pene na ngonga moko mpe kosala bitumba pene na ndako ya Vital Kamerhe Vice-Premier ministre ya kala RDC.

Bato basusu pene motango ntuku mitano bakangamaki. Kati na bango mwana ya Christian Malanga, Marcel Malanga oyo abotama na Amerika mpe na mama moyi Amerika mpe mindele mibale baye bazwamaki na ba passeports ya Amerika.

Molobeli ya Département d’état aboyaki kopesa makanisi mpo na bato baye bakangami mpo etali sekele ya bomoi bwa bango.

Matthew Miller alobaki ete Amerika emitungi mingi mpo na nsango elobi ete bayi Amerika bazalaki na likambo lyango mpe alaki ete ekolo na ye ekopesa maboko na masungi manso masengeli na bolukiluki mpo na pole mbulamatari ya RDC ezali kosala.

Bato ba bikolo bisusu bazwamaki mpe na mobulu moye, kolanda general Ekende.

Forum

XS
SM
MD
LG