Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Na suku ya nse ya ndako ya bakeli mibeko bureau epesi mikolo misato na baponami mpo balengela ba commissions permanentes.


FILE PHOTO: Vital Kamerhe attends a meeting with Congo's Independent National Electoral Commission and observers from the Southern African Development Community in Kinshasa
FILE PHOTO: Vital Kamerhe attends a meeting with Congo's Independent National Electoral Commission and observers from the Southern African Development Community in Kinshasa

Na suku ya nse ya ndako ya bakeli mibeko, na ngonga ya bokutani to pleniere ya lobi loleki eye esalaki kaka ba miniti ntuku mibale na mwambe, bureau epesi mikolo misato na baponami mpo balengela ba commissions permanents. Tango azuaki maloba, mokonzi ya bureau, Vital Kamerhe, akomaki makambo bakolandela biye bibongisamaki na bokutani ya sanza ya misato ya 2024 eye ekosila mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya motoba ezali koya. Botiami ya mangomba ya bakeli mibeko mpe ba commissions permanents mpe lisanga ya bato ya bwanya, Botali ba bokebi mpe bondimami ya misolo to budget ya suku ya nse mpo na mobu 2025. Botali na bokebi mpe bondimami ya programme ya mbulamatadi eye ekolandisama na bopesi bango nzela ya kobanda mosala to investiture. Mpe botali na bokemi bosenga to requisitoire ya procureur general ya gouvernement pene na Cour ya cassation mpo na mitindo. Na maye matali bobimi ya mbulamatadi, Vital Kamerhe asakoli ete ndako ya bakeli mibeko ezali kozela bongo ministre ya yambo na mbulamatadi na ye mobimba mpo na kobandisa bango mosala to investiture.

Forum

XS
SM
MD
LG