Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mbulamatari ya mama Judith Siminua esakolami sanza mitano nsima na elonga ya Felix Tshisekedi


Judith Suminwa (G) Tuluka Premier ministre ya sika asololi na président ya RDC Félix Tshisekedi na ville ya Union africaine, na Kinshasa, le 1er avril 2024. (Présidence ya RDC)
Judith Suminwa (G) Tuluka Premier ministre ya sika asololi na président ya RDC Félix Tshisekedi na ville ya Union africaine, na Kinshasa, le 1er avril 2024. (Présidence ya RDC)

Mbulamatari eye etambwisami na mama ministre wa Yambo ya Ekolo Congo Judith Siminua esakolami wuta lobi, sanza mitano nsima na elonga ya Felix Tshisekedi bo’ mokonzi ya ekolo mpo na kokamba yango mbala ya mibale mpe sanza mibale nsima na botiyami ya mokambi ya sika ya gouvernement.

Bato ntuku mitano na minei bazali na mbulamatari ya sika na bokeseni na mbulamatari eleki eye ezalaki na bango ntuku mitano na sambo.

Baike na ba ministres balongwe lokola Christophe Lutundula oyo akinatani na Thérèse Kayikwamba Wagner, Peter Kazadi ya mambi ma Ntey oyo atiki ebonga na Jacquemain Shabani mpe Nicolas Kazadi ya Finances nde alandami na Doudou Fwamba, Rose Mutombo ya Misala mya Sembo atikeli ebonga na Constant Mutamba.

Eve Bazaiba ya Environnement to Libanda lya bomoi na Patrick Muyaya ya nsango mpe molobeli ya mbulamatari bazali kati na baye batikali na bibonga bya bango. Jean-Pierre alongwe na Bobateli ekolo eye epesami sika na Guy Kabombo Muadiamvita mpe akomi na Transports, Nzela mpe Désenclavement.

Basi zomi na mwambe bazali na kati. Mokolo mwa mobavandisami ya mbulamatari mopesami nanu te kasi makambo maike mazali kozela yango lokola bitumba na monyee ya mboka, mingi mingi ya ba M23 baye Kinshasa efundaka kopesama maboko na Rwanda, bozangi misala, bomemi ekonomie ya mboka na mabakambo mingi mpe ntalo ya biloko.

Bobimisami ya mbulamatari yango bosalami mikolo zomi nsima na bato baike bamekaki kokweyisa bokonzi, lokola bakambi ba mamapinga basakolalaki.

Forum

XS
SM
MD
LG