Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Serguei Lavrov akutani na Sassou na Oyo


Sergueï Lavrov (G), Ministre ya mambi ya Bapaya ya ekolo Russie akutani na mokonzi ya Ekolo Congo Denis Sassou N'Guesso (D) na Oyo, 4 sanza ya sa motoba 2024. (Présidence ya Congo-Brazzaville)
Sergueï Lavrov (G), Ministre ya mambi ya Bapaya ya ekolo Russie akutani na mokonzi ya Ekolo Congo Denis Sassou N'Guesso (D) na Oyo, 4 sanza ya sa motoba 2024. (Présidence ya Congo-Brazzaville)

Serguei Lavrov, ministre ya Mambi ma Bapaya ya Russie azali na Congo-Brazzaville epayi azali kokoba mobembo mwa ye na Afrika.

Alaki na biyano apesaki na bapanzi nsango na Oyo ete mampinga ma Russie makotatabana te mpo na kobeta masasi na batangisi ya basoda ba Ekolo France baye bakotindama na bitumba na Ukraine.

Bakonzi ba France mpe ya Ukraine bazali kosolola mpo na botindami bwa balakisi baye. Serguei Lavrov ayambamaki lelo na president Denis Sassou N’Guesso na Oyo, mboka ya mbotama ya mokonzi ya Congo-Brazzaville.

Lobi loleki azalaki na Conakry epayi asololaki na bakonzi ba Guinée mpe lokola mpo na boyokani na ekolo na Russie. Lavrov alobi nsima na masolo na Sassou N’Guesso na Oyo, ete Russie ezali kopesa maboko na likita mpo na Libye liye lisalamaka na molende ya mokonzi ya Congo-Brazzaville mpe apameli bayi West.

Ministre ya mambi ma Bapaya ya Russie azali kosala mibembo mingi na Afrika wuta mibu mibale mpo na koluka kozwa lisungi lya bikolo bya Afrika to mpe boboyi bya bango ya kokota ngambo moko na bitumba biye Moscou ezali kosala wuta koleka mibu mibale na Ukraine.

Nsima na Congo-Brazzaville, Serguei Lavrov akokoba mobembo mwa ye na Afrika kasi alobi te soki akokende wapi nsima.

Forum

XS
SM
MD
LG