Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bavandi bazali kokima mboka Butalongola mpe Kilambo po na bitumba na Nord-Kivu


Bavandi baike ya Bambo na territoire ya Rutshuru, na 60 kms na Goma, bazali kokima bitumba ya batomboki ba M23 kati na nzamba, Nord-Kivu, 26 sanza ya zomi 2023.
Bavandi baike ya Bambo na territoire ya Rutshuru, na 60 kms na Goma, bazali kokima bitumba ya batomboki ba M23 kati na nzamba, Nord-Kivu, 26 sanza ya zomi 2023.

Bavandi bazali kokima mboka Butalongola mpe Kilambo pene na cite ya Kanyabayonga na territoire ya Rutshuru mpe Lubero, na Nord-Kivu, epayi batomboki ba 23 na mampinga ma Ekolo Congo Démocratique (FARDC) na basungi ba bango ya ba Wazalendo bazali kokoba kobunda. Bayi societe civile balobi ete bitumba bizali kosalama bisika na bisika mpe FARDC na ba Wazalendo bazali kokoba kokanga nzela na M23 na bomeki ya batomboki baye ya kozwa Kanyaboyonga. Nzokande, Monusco, Misala mya kimya mya ONU mizali mpe kopesa FARDC maboko. Molobeli ya mampinga na Monusco, lieutenant-colonel Kedagni Mensah alobi basoda ba kimya na bayi FARDC bazali kotambola na kosalaka bokengi na ntina ya kobatela bacivili.

Forum

XS
SM
MD
LG