Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fondation Bill Clinton elobi na Kinshasa baweyi ntuku motoba batangemi na boloko ya Makala na sanza ya mitano


Bato baike batelemi esika mabele makunda ba creuseurs mingi na mine ya Kamituga, na sud-Kivu, 12 septembre 2020.
Bato baike batelemi esika mabele makunda ba creuseurs mingi na mine ya Kamituga, na sud-Kivu, 12 septembre 2020.

Na Kinshasa, baweyi ntuku motoba batangemi na boloko ya Makala na sanza ya mitano, elobi bongo Fondation Bill Clinton. Pene na bato motoba baye bakangama na boloko ya Makala, na engumba Kinshasa, na ekolo Congo democratiki, bakufami na sanza ya mitano moleki.

Ezali ONG ya ekolo Congo democratiki Bill Clinton po na kimya eye emonisi yango na mokanda na yango ya kolandela to ya monitoring. Na mokando ya lapolo, lingomba eye ya mambi matali makoki mua bomoto emonisi ete bokufami bina bisalemi mpo na motango ya bato na boloko boleki mingi.

Engebene na fondation Bill Clinton po na kimya, boloko ya Makala ezali kotanga na mokolo mua lelo motango ya bato nkoto zomi na mitano mpe nkama yoko na ntuku motoba na mwambe.

Forum

XS
SM
MD
LG