Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Suminwa Tuluka, Ministre wa Yambo ya RDC alakisi na bakeli mibeko ya suku ya Nse manaka ma ye


Judith Suminwa Tuluka, ministre du Plan atiyami bo' Ministre wa Yambo ya mwasi na Ekolo Congo Démocratique, Cité ya Unioin africaine, Kinshasa, 01 sanza ya minei 2024. (Présidence RDC)
Judith Suminwa Tuluka, ministre du Plan atiyami bo' Ministre wa Yambo ya mwasi na Ekolo Congo Démocratique, Cité ya Unioin africaine, Kinshasa, 01 sanza ya minei 2024. (Présidence RDC)

Mama Judith Suminwa Tuluka, Ministre wa Yambo ya Ekolo Congo Democratique alakisi lelo na bakeli mibeko ya suku ya Nse ya Parlement manaka ma mosala mwa ye mpe baye bazali kati na mbulamatari.

Bokengi, bobundisi bobola mpe bomomemi nkita ya ekolo na makambo ma ndenge ndenge bozali boko na makonzi y aya politiki na ye.

Alaki ete akomema misolo mya ekolo na dollars milliards koleka ntuku libwa na mibale na ndambo na mibu mitano mikoya.

Nzokande Bato baike bazokaki na mobulu mobimaki na ndako ya bokeli mibeko yambo na lisikulu lya Ministre wa Yambo Judith Suminwa.

Vital Kamerhe, moyangeli akebisa bakambi ba mangomba maike lokola vice-premier president Christophe Mboso mpe asengaki ye kokitisa mitema mya balandi ba ye.

Mpo na ye likama likokaki kozala makasi.

Forum

XS
SM
MD
LG