Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mbulamatari ya sika ya Ekolo Congo Democratique endimami na bakeli mibeko


Bakeli mibeko na ndako ya Assemblée nationale. Kinshasa, 12 novembre 2012.
Bakeli mibeko na ndako ya Assemblée nationale. Kinshasa, 12 novembre 2012.

Mbulamatari ya sika ya Ekolo Congo Democratique endimami na bakeli mibeko ba ekolo nsima na boleki ya Ministre wa Yambo Judith Suminwa Tuluka na baye banso bazali kati lobi loleki na ndako ya bokeli mibeko.

Bakeli mibeko nkama misato na ntuku libwa na sambo likolo na nkama minei na mitano baponaki mpo na kondima mbulamatari eye.

Judith Suminwa Tuluka alimbolaki na lisikulu manaka ma ye mpe ayanolaki kaka minutes ntuku misato nsima na mituna mya bakeli mibeko.

Alaki komatisa nkita ya ekolo na dollars milliards ntuku libwa na mibale na ndambo kati na mibu mitano mikoya.

Mbulamatri ya Judith Suminwa ekobanda mosala pene na sanza motoba nsima na elonga ya Felix Tshisekedi mpo na bokonzi bwa ye ya mibale na ekolo mpe sanza moko na ndambo nsima na bopesameli ye (Suminwa) ebonga ya Mokambi ya mbulamatari bo’ mwasi mpo na mbala ya yambo na ekolo.

Forum

XS
SM
MD
LG