Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame apanzi Parlement mpe atie mokambi ya sika ya bokengi sanza moko yambo na maponami


President Paul Kagame azali kopesa biyano na bapanzi nsango na likita Kwibuka30, na Kigali, 8 sanza ya minei 2024. Assumpta Kaboyi (VOA)
President Paul Kagame azali kopesa biyano na bapanzi nsango na likita Kwibuka30, na Kigali, 8 sanza ya minei 2024. Assumpta Kaboyi (VOA)

Mokonzi ya Rwanda Paul Kagame apanzi ndako ya bokeli mibeko (parlement) ya ekolo na ye sanza moko yambo na maponami ma mokambi ya ekolo mpe ya bakeli mibeko.

Na milulu misalamaki na Kigali, M. Kagame asakolaki mokano mwango nsima na kotonda botondi ayi suku mibale ya parlement basanganaki.

Mobeko mwa Rwanda mosengi ete ndako ya bokeli mibeko mokweyisama mikolo ntuku misato yambo na mapobami na ntina ya kolengela mabonga ma baye bakoponama.

Mokolo moko yambo na yango, M. Kagame atiaki na ebonga ministre ya Bapaya mpe mokambi ya misala mya bokengi ya sika. Ba minsitres misusu mpe bapesamaki bibonga.

Mokano moye motali mbulamatari mosakolamaki na liyebisi lya Ministre wa Yambo Edouard Ngirente o’mokolo mwa mosala misato.

Olivier Mduhungirehe oyo azalaki kala ntoma ya Rwanda na Pays-Bas atiami bo’ ministre ya Bapaya mpe moyi ya kala mpe ntoma ya kala Rwanda na RDC, Vincent Biruta apesami ebonga ya ministre ya Ntey.

Procureur general ya kala Aimable Havugiyaremye apesami ebonga ya Misala mya bokengi. Akitani na General de brigade Joseph Nzabamwita oyo azalaki na ebonga eye wuta 2016.

Kaka bato basusu babale bakisa ye moko Paul Kagame nde bandimami kowelela ebonga ya mokonzi ya mboka na maponami makoya.

Forum

XS
SM
MD
LG