Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Episcopo Muteba apamelaki bokomisi na makasi ya bilenge na kati ya Service Nationale na Kanyama Kasese


Batelemeli liboso lya bayi pulusu na milulu mya kobengana Mons=uco, na Goma, Nord-Kivu, 27 juillet 2022.
Batelemeli liboso lya bayi pulusu na milulu mya kobengana Mons=uco, na Goma, Nord-Kivu, 27 juillet 2022.

Episcopo metropolitain ya Lubumbashi na Haut-Katanga, Monseigneur Fulgence Muteba apamelaki bokomisi na makasi ya bilenge baye mabota na bango mayebani te na kati ya Service Nationale na Kanyama Kasese.

Yambo te episcopo ya Lubumbashi alobela makambo maye, Ong ya misala ya bobateli mpe bosalisi bana na bokuse APEE epamelaki lolenge emonaki bana bake na kati ya motango nkama yoko mpe ntuku mineyi na libwa ya bilenge baye bafundami kozali ba kuluna mpe batindamaki na mboka Mbandaka na centre ya formation ya Kanyama Kasese na Haut-Lomami.

Motomolo na yango, Marcel Tote, atelemeli yango mpo bokaboli ya bana bake mpe bakolo esalemaki malamu te.

Forum

XS
SM
MD
LG