Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba avocats ya bayi Ekolo Amerika bapameli lelo monyokoli ya baye bazali kosambela ntango bakangamamaki 


Ba magistrats na basambeli na bosambisami ya bayi lingomba ya losambo Wazalendo na Goma, Nord-Kivu, 15 sanza ya libwa 2023.
Ba magistrats na basambeli na bosambisami ya bayi lingomba ya losambo Wazalendo na Goma, Nord-Kivu, 15 sanza ya libwa 2023.

Ba avocats ya bayi Ekolo Amerika basato baye bazali kosamba na bomeki kokweyisa bokonzi na Kinshasa o’mokolo mwa zomi na libwa ya sanza ya mitano moleki bapameli lelo monyokoli ya baye bazali kosambela ntango bakangamamaki mpe nsima na yango.

Moko na basambeli baye, Me Karl Kwatangholo alimbolaki liboso lya tribunal ya basoda ya garnison ya Kinshasa-Gombe ete Taylor Christian Thomson, moyi ekolo Amerika ya mibu ntuku mibale na moko, anyokolamaki mpe bilili bya botaka bwa ye ntango azalaki konyokwama na bayi bokengi mpe mampinga bitiamaki na ba réseaux sociaux mpe bato batambwisaki yango mingi mpenza.

Bosambisami bwango boye bokomi na mokolo mwa misato mwa botelemi liboso lya bazuzi bozali kosalama na boloko ya basota na N’Dolo epayi ebandaki o’mokolo mwa sambo ya sanza eye.

Ba avocats ya Taylor Christiian Thomson basengaki bobwakisami ya ba procès verbaux ya biyano bitiamaki na bosambisami.

Ba avocats balobaki ete bakangemi batunamaki mituna na lifalance mpe moto akobongola mituna na anglais azalaki te.

Bayi Amerika basusu babale, Marcel Malanga, mwana ya Christian Malanga mokambi ya bato bamekaki kokweyisa bokonzi ayo abomamaki na mobulu basalaki, na moyi Amerika mosusu, Benjamin Zalman-Polun ya mibu ntuku misato na motoba bazali mpe kosambisa.

Marcel Malanga azali na mibu ntuku mibale na moko lokola moninga wa ye Taylor Christian Thomson.

Ba avocats ya bato banso ntuku mitano na moko baye bazali kosamba bapamelaki mpe monyokoli se ndenge moko. Baboyaki mpe bosambisami bwa bango na tribunal ya basoda mpo bazali bacivili.

Bilili bya bobomi bwa baike mpe ya monyokoli mitambolaki na ba reseaux sociaux nsima na bomeki kokweyisa bokonzi. Bosambisami bokokona mokolo ya ntuku mibale na mitano.

Forum

XS
SM
MD
LG