Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Engunduka ya Service national ebandi kotambola na Lubumbashi na Haut-Katanga


Engunduka ekweyi na mboka ya YAnga, na Congo-Brazzaville, 22 juin 2010
Engunduka ekweyi na mboka ya YAnga, na Congo-Brazzaville, 22 juin 2010

Engunduka yoko ya Service national ebandi kotambola lelo na Lubumbashi na Haut-Katanga, kolanda milulu mikambamaki na mokonzi ya RDC Felix Tshisekedi.

Engunduka yango ezali na ba wagons ekangama ntuku misato, mpe zomi na mitano efungwama, ba citernes zomi mpe locative to masini mabale.

Mokambi ya Service national, General-major Jean-Pierre Kasongo asakoli ete engunduka eye ezali eyano na nkwokoso mingi ya bobimisi mbuma ya milona mpe ya bomemi biloko bikotoka na milona na mosala akambaka, kolanda nsango epesami na compte X ya ndako ya mosala ya mokonzi ya ekolo.

Bilenge koleka nkoto minei babimi na mateya mpe batindami kosala mpo na ekolo.

General-major Jean-Pierre Kasongo akundoli ete Service national ebimisaki tonnes nkoto zomi na motoba ya masango na mobu 2023-2024.

Forum

XS
SM
MD
LG