Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Likita lya bokengi lya ONU lilakisi botungisami na yango mpo na bitumba na Nord-Kivu


Balakisi bilongi ya bikolo kati na Assemblée générale ya ONU bawuti kopona mokano ya kotelemisa misala mya Russie na Conseil ya makoki ma bomoto, na New York, 7 avril 2022.
Balakisi bilongi ya bikolo kati na Assemblée générale ya ONU bawuti kopona mokano ya kotelemisa misala mya Russie na Conseil ya makoki ma bomoto, na New York, 7 avril 2022.

Likita lya Bokengi to Conseil ya Sécurité ya ONU elakisi mpasi na yango mpo na bitumba batomboki basalaki na Kanyabayonga, na Nord-Kivu, epayi bato koleka nkoto nkama misato na ndambo bakimaki bisika bya bango mposo moleki mpe bokaboli bileyi mpe bopesi lisalisi lya minganga bosukisamaki.

Na bokutani na bapanzi nsango o'mokolo mwa mosala misato na New York, mokambi ya ngonga eye ya Likita lya bokengi ya ONU mpo na sanza eye ya motoba, moyi ekolo Corée du Sud Joonkook Hwang apemalaki makasi batomboki ba M23 na ya ADF kosala bitumba o’mokolo mwa misato ya sanza ya mitano moleki na bisika bakima bitumba batiama na Mugunga na Goma.

Bato baike bakufaki mpe basoda ba kimya nazokaki.

Likita lya Kimya lya ONU lipamaleki mpe bitumba na Monusco, misala mya kimya mya ONU mpe libeti sete na lotomo lwa kobatela bacivili.

Forum

XS
SM
MD
LG