Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ramaphosa asakoli ete mampinga ma ekolo ma ye makokoba kobunda na mabele ma RDC


Président Cyril Ramaphosa (D) ya Afrique du Sud apesi mbote na mokonzi akitanaki na ye Jacob Zuma na Cap, Afrique du Sud, 20 février 2018.
Président Cyril Ramaphosa (D) ya Afrique du Sud apesi mbote na mokonzi akitanaki na ye Jacob Zuma na Cap, Afrique du Sud, 20 février 2018.

Cyrile Ramaphosa, mokonzi ya Afrika ya Ngele asakolski lelo ete mampinga ma ekolo na ye, SANDF, makokoba kobunda na mabele ma Ekolo Congo Democratique atako basoda ba Afrika ya Ngele bakufi na bitumba batomboki ba M23 bazali kosala. Asakoli yango nsima na liwa lya basoda babale ba Afrika ya Ngele na ba mortiers ebetamaki o’mokolo mwa mosala mibale na Sake, na kilometre ntuku mibale na sambo na west ya Goma, na Nord-Kivu.

Basoda basusu ntuku mibale ya Afrika ya Ngele bazokaki.

Cyrile Ramaphosa alobaki été andimi mbeka eye basoda basali mpe yango ekitisi ye kasi akotika te kobunda mpo na kimya mpe boboto na etuka eye ya Afrika.

Motango mwa basoda ba Afrika ya Ngele baye babomami na bitumba biye wuta kati kati ya sanza ya zomi na mibale eleki ntango batindamaki, mokomi sika mitano.

Basoda ba Afrika ya Ngele batindama na Ekolo Congo Democratique na nzela ya mampinga ma bikolo bya SADC, likita lya ntombwa lya bikolo bya Afrika ya Nse, elongo na bayi Malawi mpe Tanzanie na ntina ya kosunga mampinga ma Ekolo Congo Democratique kosukisa batomboki ba M23 baye Kinshasa efundaka Rwanda kopesa maboko.

Forum

XS
SM
MD
LG