Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba chinois motoba baye basalelaka wolo na territoire ya Djugu babomamaki na ba milici ya CODECO


Basimba minduki ya URPDC/Codeco (Union des Révolutionnaires pour la Défense du Peuple Congolais/Coopérative pour le Développement du Congo) na Wadda, Ituri, 19 septembre 2020.
Basimba minduki ya URPDC/Codeco (Union des Révolutionnaires pour la Défense du Peuple Congolais/Coopérative pour le Développement du Congo) na Wadda, Ituri, 19 septembre 2020.

Ba chinois motoba baye baselelaka wolo na territoire ya Djugu babomamaki na bitumba ba milici ya CODECO mokolo mua misato moleki na territoire ya Djugu na Ituri. Bitumba bisalemaki na Site minier ya Abombi, na chefferie ya Banyali Kilo.

Ba soda babale mpe civili yoko mpe bakufaki na bitumba bina. Mampinga ma ekolo Congo democratiki elobi ete sango eye ezali ya solo.

Administrateur ya territoire ya Djugu alobi ete motango eye ezali kolakisa etee ba nzoto ya ba chinois baye babobami bitikamaki na ndako ya malili ya lopitalo ya monene ya Bunia.

Oyo ezali bitumba ya liboso te ba chinois bazali kokutana na yango na bisika ya bobimisi mabanga ya talo ya esika eye.

Bitumba biye ba CODECO bafundami kosala bikomi makasi na territoire ya Djugu. Na suka ya sanza eleki, pene ba bato ntuku mibale na misato babomamaki na bitumba ya ndenge na ndenge na localite ya Lodjo.

Forum

XS
SM
MD
LG