Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

USA esakoli botelemisi bitumba na monyele ya RDC


Ntoma ya ekolo Amerika Lucy Tamlyn (G) na Kinshasa na masolo na président ya RDC Félix Tshisekedi, Kinshasa, 15 sanza ya mibale 2024. (Facebook/Présidence RDC)
Ntoma ya ekolo Amerika Lucy Tamlyn (G) na Kinshasa na masolo na président ya RDC Félix Tshisekedi, Kinshasa, 15 sanza ya mibale 2024. (Facebook/Présidence RDC)

Ekolo Amerika esakoli botelemisi bitumba na monyele ya Ekolo Congo democratiki kati na batomboki ba M23 na mampinga ma mboka, FARDC. Botelemisi bitumba bwango bosengeli kobanda mokolo mua lelo.

Amerika epesi longonia na botelemisi bitumba mpo na mposo mibale kati na FARDC mpe batomboki ba M23 baye bazali kobunda na Nord-Kivu.

Botelemisi bitumba bwango, engebene na liyebisi ya ndako ya mokonzi ya ekolo Amaerika (Maison Blanche), bosengeli kobanda mokolo mua mosala mitano mpe mosengeli kosalisa bozongi ya ba mboka na bango na bisika bya bango, mpe lisusu bokotisami bwa bato basundaka bato to ba humanitaires bisika bato bazali na bosenga.

Makambo mazali mabe na Nord Kivu esika wapi pene ya bato bakima bisika ba bango million misato bazali.

Bakima bisika ba bango ebele batondisami nzinga ninga ya Kanyabayongo wuto bomati bua bitumba na suka ya sanza ya motoba na territoire ya Lubero esika wapi M23 ezuaki ba mboka ebele.

Ekolo Amerika emonisi ete ezali kosunga misala mya Luanda mpe ya mbulamatadi ya ekolo Angola mpo na bosilisi bozangi bokengi na monyele ya ekolo Congo democratiki.

Forum

XS
SM
MD
LG