Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Amerika eboyi kopesa maboko ma yango na makambo manso misala ya SADC SAMIDRC na bopesi lisungi na mampinga ma RDC


Secrétaire d'Etat ya Ekolo Amerika Antony Blinken (D) na mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi na cité ya Union africaine, Kinshasa, 9 sanza ya mwambe 2022.
Secrétaire d'Etat ya Ekolo Amerika Antony Blinken (D) na mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi na cité ya Union africaine, Kinshasa, 9 sanza ya mwambe 2022.

Ekolo Amerika endimi te kopesa maboko na yango na makambo manso misala ya SADC to lingomba ya ntombwana ya Afrika ya sudi na ekolo Congo democratiki na bokuse SAMIDRC lokola Misala ya kimya mpe ya bokengi ya Union Africaine na sanza ya misato eleki mpe SADC na bopesi lisungi na mampinga ma RDC na bitumba na batomboki ba M23 baye bapesami maboko na Kigali (Rwanda).

Tango azuaki maloba lobi loleki na bokutani ya Conseil ya Sécurité ya ONU eye etalaki mambi mazali koleka na ekolo Congo democratiki, Stephanie Sulivan, momonisi elongi molandi ya mua ntango ya ekolo Amerika pene na Onu alobi ete bopesi maboko ya malonga ya misala ya Nations Unies mpo na kimya na RDC to Monusco na misala ya SADC to SAMIRDC ezali kotambola nzela moko te na makanisi na yango ya komema boyokani ya politiki to solution politique na bozangi bokengi na monyele ya ekolo.

Ekolo Amerika emonisi posa na yango na boluki kosilisa bozangi boyokani.

Forum

XS
SM
MD
LG