Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bosenga ya Amerika mpo na bokitisi bitumba na kati na RDC mpe M23 bozali kotosama


Président Félix Tshisekedi (G) ya Ekolo Congo démocratique na Sectrétaire d'Etat ya Ekolo Amerika Antony Blinken na Washington DC, 13 sanza ya zomi na mibale 2022.
Président Félix Tshisekedi (G) ya Ekolo Congo démocratique na Sectrétaire d'Etat ya Ekolo Amerika Antony Blinken na Washington DC, 13 sanza ya zomi na mibale 2022.

Bosenga ya ekolo Amerika mpo na bokitisi bitumba mpo na poso mibale na Kati na mampinga ma ekolo Congo democratiki mpe batomboki ba M23 bozali kotosama.

Wuto mokolo mua mitano moleki, babundi bazali kotosa yango, elobi lobi loleki bato bavandi na bisika bitumba bizali kosalema.

Wuta lobi loleki, bitumba ata yoko te eyokani na kati na mampinga ma FARDC mpe batomboki ba M23 baye bazali kokoba kovanda na bisika bazuaki.

Ezali lokola nzela ya Goma-Sake-Minova, na territoire ya Masisi, esika wapi batomboki bazuaki eye ezali na kati ya Kirotshe mpe Shasha, na nzela ya monene ya mibale to route nationale numéro 2.

Forum

XS
SM
MD
LG